Merci ya Méjé po obota Nana Ketchup... Nana lelo na sosoli Nana na nga lelo na sosoli Que bolingo le veritable ebombana na mitema ya ba fille ya timides Oyo basalaka semblant lokola balingaka te oh (balingaka te, eh) Yo oyaki na vie na ngayi na maloba ya ba santu Na komaki ko kanisa kutu yo nde porte-parole ya Nzambe Nga na motema natielaki ye ba anti-vols Po ata après un siècle mobimba moyibi ya bolingo akota te Nzoka yo fraudaki na sentiment pe na vie na nga Na makanisi que na terminus ya bolingo ofuta nga droit ya bolingo te Et pourtant yo salaki mosala mungwa esalaka na bileyi Moninga apesaki yo bolingo o multiplier par nombre nyonso olingi Y'okomisi yango lokola parfum de grande marque Oyo yambo mosombi avant asomba il faut ameka ata ndambo Sima naye soki zomi bakosala lolenge yo osali nga Tango okozonga okokuta nga ya ndambo (esengo ekozala te o mitema Nana ah) Yango lelo nga na bondeli yo ozonga (ozonga) Yango lelo nga na bondeli yo ozongela (ozonga) Oyo ozo sala nga oko bomisa na ba innocents Mayi ya miso nasaleli matanga na yo lelo (dans 10 ans eko inonder le monde entier) Oh nana (Yango nasengi ONU aya intervention) Po na boyi na provoquer fin du monde oyo nzambe a prevoyaki te Elikia ya suka nazo zela se motema na nga (Tango ekokoma debordé na bolingo na yo) Débordé mama (Tango nakokoma na nga naufragé) Peut être okoyoka ng'ata mwa mawa na mbelela ya suka na nga Oyo azalaka na monguna te Nana Liwa ya bato mosusu soki tozo lela na mawa na mitema Y'olakisi nga yanga moko po nazala lolenge kani ? Bolingo oyo ebandaki n'esengo lokola mwana azongi kelasi na elamba ya sika Lelo y'obongoli'ango mawa Nakoma koyina ti nzambe mokeli na nga Soki likolo eyindi nazo banga mvula enoka, ebungisa matambe na yo Eloko na tikala nango seul souvenir (mais kanisa tango ozalaki ko linga nga) Oh maman (démarche ralenti lokola ba soûlards y'avant indépendance) Avant indépendance, maman (lelo distance otiki ngaï lokola course ya fusée na velo) Na yebi nako mona yo lisusu te oh Nana ah Zonga opesa nga ata baiser ya suka, etikala soulagement Eh Gautier Ewing na Milan, mon pote Yo moto oyaki kozuwa nga na aéroport ya l'amour na Cortège (Carole Wana) Nzoka mituka oyaki nango pona honneur na nga (ah Lipasa Sandra Sanze) Ezalaki déception, malheur, misère na ba soucis Nayebelaki yo motema makasi boye te Nana Kende nzambe a réviser yo Y'okatani mosisa oyo eyokaka bato mawa Y'okatani mosisa ya souci a baninga a Nana kombo na yo esi ekoma kisi ya bolingo na nga Soki nazo bela natangi kombo na yo maladie esilaka Parfum nayo lokola likayabu oyo bazali kotumba Mopepe ata ememi solo nayo ata 10 kilomètres nayokaka Y'olingaki no nga te po l'amour esalaka mabe te Moto osekwisaki akufi lisusu akomi nde kopola oyoki n'o mawa te, Nana Ketchup Lelo nga na ndimi, l'amour est aveugle Po ezuwa toli te na mbeli ya déception ezuwa Yak'olongola nga kindoki ya mukolo lesa nga ekomisa nga kizengi Nasi nakomi na suka Yak'o libérer no nga ah Nakowa pona yo Mama Nakokoka mpé kobosana yo te Nana Nakokoka mpé kobosana yo te Nana Reviens vite mon amour Tu es vraiment unique en ton genre Tu es vraiment unique en ton genre Tu es vraiment unique en ton genre Tu es vraiment unique en ton genre Mama Marcosins... Eh Vicky Levire Tu es vraiment unique en ton genre (Décos Mukoko yo na Camionette Mbola, bo bondela Nana) Tu es vraiment unique en ton genre Tu es vraiment unique en ton genre